Mon Bonheur (Feat. Koffi Olomide)
Cindy Le Cœur
5:49Élégance Hum, anh Tii bolingo ekomisi nga na Goma Tii nayoki pe té pema po epayi Élégance azali, na koma Bolingo ya motéma, nakoti pe ba zamba Na mati pe ba ngomba Súka-súka olobi nini, Élégance? Na ya to na continuer kozela? Súka-súka olobi nini, Élégance? Na ya to na continuer kozela yo? Namata ba ngómba Nakota ba zámba, nabanga té Ngáí awa butu ekómá se mikúsé Ngáí awa pongi ekómá 3 heures du temps Ba ndoto monotonie Élégance C'est elle que j'aime Élégance C'est elle mon choix Nzambé opesa baníngá ba vocations Bakomá ko prêcher la bonne parole Élégance ótíndela nga ata na WhatsApp Sourire nayo ya tongo ya leló Soki obosani tindá ata oyo ya mpokwa eeh Súka-súka olobi nini, bébé? Na ya to na continuer kozela yo? Baníngá Nzambe a pesa bango ba vocations Na 3 heures du matin tango mpongi ekimaka nga Nakoma ko fouiller téléphone na mona ata appel manqué Soki tango mosusu, Élégance okomeli nga, mon bébé "Bonjour, mon fruit de mer, je t'aime" Élégance C'est elle que j'aime Élégance Mon choix eeh Mais ebandaki neti ndoto, bolingo ya ngai na Élégance Neti lisapo onge oyo ya Romeo yé na Juliette Bolingo oyo mboka môbimba epesa longónya Ya biso ebongaki neti linzanza na lángi Lelo etíkálí lisitoile, bolingo ebótí mapapú Nga na boya ébélé ya mabala pona kozela Élégance Mikolo elekí kutu ba sánzá pé ba mvula Y'ozongaka té nga awa likombé ebali nde nzóto Souci ndé bileyi bya nga ko bandá moyi butu pi Hum y'olatisa nga 'be bomwana pili ya bolingo Lelo mokuwa ememi botutu o'kati ya nzóto Nakoma kobángá na ya kokúfa avant eeh Kaka pona etúmbu ba bengi kombo bolingo Yaka omona ndéngé bolingo ezo salá génocide Natindi pe ba messagers bazongi maboko pámba eh Kombo n'ô etingami nga lolému neti soyi eh Diagnostique ya bokono ezwí nga absence, Élégance Zonga nakomi migrant, na zangi terre d'asile Na leli-leli eeh, Élégance Elega' Wooh-ooh Mwana ma' Solange azali ya ngai mókó ngo Wooh-ooh Soki ozalákí mbóka, Élégance Nalingaki'o changer nationalité Nalingaki'o changer pé passeport Nakoma na ngáí Elégançais Nakoma na ngáí Elégançois Et me soumettre à tes lois, ça va de soit Élégance kitoko eeh Élégance kitoko avec excédant Ekomi'o sopana nzelá-nzelá Lokola loso na mutu ya porteur Basi óyo baza na problème ya beauté Ba lokótá ba mipakola na nzóto Bakoma belle, belle, belle, belle Élégance Nzambe asalaki yo eeh Na l'heure oyo na paradis agitation Mpé makélélé nionso esilaki eeh Asalaki yo malembé-malembé Alati loupe neti oyo ya ba diamantaires Tango basalaka expertise ya diamant Soucis nayé obima parfaite Lelo sur terre, moto nionso aza convaincu Perfection eza domaine privé ya Nzambe Élégance oza produit ya perfection ya Nzambe Ye-ye-ye, ye-ye-ye-eeh Baninga bo tika ngáí na lia mbuma Adam aliaki simple pomme ya Eva Po na paradiso Élégance azalákí té Arata mangoustan Arata sucre oyo ya mbila y'esobe Arata maracuja aaaah Arata mayi ya pondu ya mayi-mayi Arata muselu óyo ya dongo-dongo Arata bizarrerie óyo ya pamplemousse Ye-ye-ye, ye-ye-ye-eeh Otié conflit entre Gucci na Vuitton Bazowela yo eh, ozala égérie na bangó Basála bénéfice, ba concurrence óyo ya Apple na Google Élégance Ye-ye-ye, ye-ye-ye-eeh Élégance komisa nga ata bureau n'o Petit ya confiance óyo asimbelaka yo sac Maman au secours, Élégance soki atali nga Nazongaka mwana moke óyo ba memaka na l'école Na ba nounous, na deux tartines ya pain au chocolat na cartable Ye-ye-ye, ye-ye-ye-eeh Élégance Elega Miandabu Mwana maman Solange, aux lèvres rose fuchsia Ngáí awa na motéma, l'amour est toujours en cours Ton amour, Élégance, dans mon cœur pour toujours Ton amour, Élégance, il n'y aura jamais de dernier jour Pour ton amour, Élégance, je ferais toujours demi-tour Depuis y'okenda, Élégance, nakoma na veste ya jardinier Na pesi kombo na yo na chaque fleur ya jardin Ba roses, ba pétunias, ba orchidées, ba jasmins Ye-ye-ye, ye-ye-ye-eeh Y'otikaka ko silika, je t'aime Y'otikaka ko limwa-limwa, je t'aime ko Yo tikaka ko ignorer nga, je t'aime Y'otika ko lelisa nga, je t'aime Y'otikaka ko tromper nga, je t'aime Y'otika ko pesa mawa, je t'aime Y'otikaka ko silika, je t'aime Y'otika ko tromper nga, je t'aime Y'otikaka ko mignola nga, je t'aime