Loyembo
Enoch Mulopo
5:03Nani akoki kofunda nga Moponami na Yesu Muana Mpate afuta Niongo na nga Motuya mibalé! Masumu na nga Amema yango Akomisa nga peto Tango na bolembu Na ko kweya Ngolu etelemisaka nga (Nga na tondi Yo Po na Bolingo na Yo Otiki Nkembo oyé Kosikola nga) (bis) Makila na Yo Epetola nga Wuta liboso mokilo oyo Ezalisama (Yango na yembi, Ngolu na Yesu Po ete Mosantu Alobi ete nazali bulé!) (bis) (Nga na tondi Yo Po na Bolingo na Yo Otiki Nkembo oyé Kosikola nga) (bis) Tango moyini Akofunda nga (Epayi ya Tata), Po na masumu na salaki (Ebele pe motané) Pe ako yebisa Ye (Apesa etumbu) Kasi Tata akotala nga Na se ya Makila Amoni nga yi peto Na se ya Makila, Nanu na sumuka te eh Na se ya Makila Amoni ngai peto Na se ya Makila, Nanu na sumuka te eh Yango esengo Na nga emati Po na mobeko, Na bongaki Na etumbu ya liwa Po na mabé na nga Nyonso oh Ngolu epesameli nga Ya solo Na se ya Makila Amoni nga yi peto Na se ya Makila, Nanu na sumuka te eh Na se ya Makila Amoni ngai peto Na se ya Makila, Nanu na sumuka te eh Yango esengo Na nga emati (Oh! Oh!) Yango esengo Na nga emati! (Yoka tina Ya esengo na nga) Yango esengo Na nga emati (Yesu apesi nga Bolimbisi Ya masumu eh) Yango esengo Na nga emati (Na komi moto Ya esengo Oyo esilka te) Yango esengo Na nga emati (Bomoyi na nga Ekomi nde ya sika oh) Yango esengo Na nga emati (Yango esengo Na nga emati) Yango esengo Na nga emati