Azaliki Awa

Azaliki Awa

Gatho Beevans

Длительность: 6:11
Год: 1986
Скачать MP3

Текст песни

Azalaki awa pembeni na nga esika akeyi ekaboli nga na ye
Ye na mobembo nga ko mosika distance na kati ye na ngambo
Ngai na ngambo
Tango mosusu soki na kanisi ndenge oyo tozalaki epesi nga
Kobanga
Moto na lingi akoma mosika na tondi na ba souvenir na motema
Na lela na nani na sala ko nini na kende ko wapi
Nakomi se ko banza ngai moko
Azalaki se awa (se awa)
Cherie akeyi na ye
Alobaki na nga akozonga (se awa)
Nga ko na zelaka ye
Azalaki se awa (se awa)
Cherie akeyi mosika
Alobaki na ngai akozonga (se awa)
Suka se akoya
Na kolemba te na kozela ye solo nga na kokoka kokanga se
Motema
Na meka na tanga mokanda na ye makila eko panzana nzoto
Ekolenga
Na komi koyoka mongongo na ye na miso na komona se elili na
Ye
Na kati ya ndoto mobimba cherie asimbi nga loboko hoo na zui
Trouble
Na fongola miso na tala pembeni kasi moto te
Na komi komituna nga moko...
Azalaki se awa (se awa)
Cherie akeyi na ye
Alobaki na nga akozonga (se awa)
Nga ko na zelaka ye
Azalaki se awa (se awa)
Cherie akeyi mobembo
Alobaki na nga akozonga (se awa)
Suka se akoya
Lelo na ndimi baye baloba solo maladi ya bolingo eza na kisi
Te
Bolingo lokola elanga ya rose ekoli yo motema batela yango
Malamu
Na sima ya mikolo tosala malasi partout toko kende topakola
Yango
Kuna ozali olotoko nga ata na suka ya pongi po na bika
Pota na motema ezali kosenga presence na yo
Nakomi se koyemba ngai moko
Azalaki se awa (se awa)
Cherie akeyi na ye
Alobaki na nga akozonga (se awa)
Nga ko nazelaka ye
Azalaki se awa (se awa)
Cherie akeyi mosika
Alobaki na nga akozonga (se awa)
Suka se akoya
Nayebi akozonga (se awa)
Nakangi motema kasi pasi esili te
Zonga o consoler nga (se awa)
Nabandi kobela...
THE END