Kamba Ngai
Groupe Adorons L'Eternel G.A.E.L
3:53Yo likonzi esimba bomoi na nga (likonzi esimba bomoi na nga) Na bolembu zala makasi na nga (Yo likonzi ya bomoi na ngai) Yo likonzi esimba bomoi na nga (na bolembu ya bomoto na nga) Na bolembu zala makasi na nga (Oh likonzi na nga Yahweh) Yo likonzi esimba bomoi na nga (na bolembu ya bolenge na nga eh) Na bolembu zala makasi na nga (oooh likonzi na nga Yahweh) Yo likonzi esimba bomoi na nga (na kokweya na nga nionso eh) Na bolembu zala makasi na nga Alléluia Nzambe na bomoi Mitéma esi etondi na posa na Yo, moyengebene To pusani, to belemi lokola ba sikoli (Nzambe na bomoi) Toye lokola ba biangami, toye lokola bana (Ya ngai motéma ekoma ya Yo) Toye lokola ba sali, toye mpe lokola baninga, Nkolo (Molingami na nga) (Oyo ya tango nionso) Ebombameli ya basantu, Nkolo na nkémbo (Na mikabi nayo, moninga malamu) Yoka lolako ete mitéma Ya baye ozwa na mokili, otia pembeni pona lokumu na Yo, Nkolo, Yo ndé Nzambe (Opesaka bomoyi) Opesaka bomoyi, Nkolo (Na baye banso baye epa nayo) Ozongisaka elikya, Nkolo na nkémbo (Nzambe Yo bolingo Nzambe na nga) Yango toye epa na Yo, yamba mitéma mpe ndima losambo (Nayebi Yo, Nkolo) Ndima masanjoli, mokonzi, alléluia Nzambe na bomoi Ya ngai motéma ekoma ya Yo Molingami na nga Oyo ya tango nionso Namikabi na Yo, moninga malamu Opesaka bomoi Na baye banso baya epayi na Yo Nzambe Yo bolingo, Nzambe na nga Nayebi Yo, Nkolo Nkolo na bomoi Yo ndé elikya na nga Bomoi na nga esimbami na Yo, Nkolo Yo ndé molingami na ngai na talelaka sé Yo Na bomoyi na ngai nako banga eloko té, Nkolo Motéma mwa nga Mpe mabanzo ma nga Na bonzeli yango Sala nango elingi Yo Nzambe na bomoi Ya ngai motéma ekoma ya Yo Molingami na nga Oyo ya tango nionso Namikabi na Yo, moninga malamu Opesaka bomoi Na baye banso baya epayi na Yo Nzambe Yo bolingo, Nzambe na nga Nayebi Yo, Nkolo Nzambe na bomoi Ya ngai motéma ekoma ya Yo Molingami na nga Oyo ya tango nionso Namikabi na Yo, moninga malamu Opesaka bomoi Na baye banso baya epayi na Yo Nzambe Yo bolingo, Nzambe na nga Nayebi Yo, Nkolo Nkolo Yo ndé mosantu, yamba loyembo na nga Moto na bolembu, Yo ndé makasi na nga Nguya ba bulami, lisekwa ya ba santu Mususu lokola Yo, amonani té Mokonzi ya milimo mya batu Ya ngai maboko etombwami Liboso ya kiti ya bokonzi na Yo Nzambe na bomoi Ya ngai motéma ekoma ya Yo (molingami na nga) Molingami na nga Oyo ya tango nionso Namikabi na Yo, moninga malamu (opesaka bomoi) Opesaka bomoi Na baye banso baya epayi na Yo Nzambe Yo bolingo, Nzambe na nga Nayebi Yo, Nkolo Nzambe na bomoi Ya ngai motéma ekoma ya Yo (molingami na nga) Molingami na nga Oyo ya tango nionso (namikabi na Yo) Namikabi na Yo, moninga malamu (Y'opesaka bomoi) Opesaka bomoi (Nkolo) Na baye banso baya epayi na Yo Nzambe Yo bolingo, Nzambe na nga Nayebi Yo, Nkolo Nayebi Yo (nayebi Yo, Nkolo) Nkolo na nga na yebi Yo (nayebi Yo, Nkolo) Bilaka na Yo ekokokisama na bomoi (nayebi Yo) Nayebi Yo, Nkolo na nga, Nzambe na nga (nayebi Yo, Nkolo) Oyo olobaki ekokokisama, nayebi, nayebi Yo (nayebi Yo, Nkolo) Okosaka té, Nkolo na nga (nayebi Yo, Nkolo) Nayebi Yo, nayebi Yo (nayebi Yo, Nkolo) Nayebi Yo, elikya na nga (nayebi Yo, Nkolo) Na'a sé na Yo