Liberdade
Irmã Sofia
4:30Nalingi nkolo Yesu na ko linga se ye Oyo nazui na Yesu eleki monene Ya ngai na nkolo Yesu ezali ya seko Na ko linga Masiya kino suka te Ngai nalingi ye Mobateli ya bomoyi na ngai A bateli ngai na liwa Na ko lingai se Yesu na ngai Mobateli ya libala na ngai Mobateli ya libota na ngai A bateli ngai na pongi Mobateli ya voyage na ngai A bateli mosala na ngai A sopeli ngai kimia na ye A tondisi ngai na esengo Nalingi ye Nalingi nkolo Yesu na ko linga se ye Oyo nazui na Yesu eleki monene Ya ngai na nkolo Yesu ezali ya seko Na ko linga Masiya kino suka te Ngai nalingi ye Oyo atikakai bokonzi na ye A kitaki na se pona ngai Ye a mataki kuna na ekulusu A sopaki makila pona ngai A longaki liwa pona ngai A zonga na ndako na tata Ko bongisela ngai esika Po ete nazala elongo na ye Ko sepela na ye kino suka te Na lingi ye na bomoyi na ngai Oyo apesa ngai bokonzi na ye Oyo a sopela ngai nguya na ye Oyo apesa ngai bozui na ye A pesa ngai boyebi naye Oyo akomisa ngai leki na ye A longola soni na ngai Oyo a silisa kolela na ngai Oyo a pangusa mpinzoli na ngai Oyo a silisa mawa na ngai Oyo a tondisa ngai na esengo Na ko linga se Yesu na ngai Tango nionso na bomoyi na ngai Na yembela yo nkolo na ngai Na ko binela yo nkolo na ngai Na ko bila se matambi na yo Tango nionso na bomoyi na ngai Na ko kumisa se kombo na yo Na butu pe na moyi yaya Ata mokili eboyi yo yaya Ngai na ko kangama se na yo aleluya