Djino

Djino

Koffie Olomide

Длительность: 7:08
Год: 1988
Скачать MP3

Текст песни

Yaka yaka nalinga yo
Bongo sima liwa eya kozua ngai
Iyo oh-oh Djino

Nanu nga nalinga boye te
Nainu namipesa bongo te
Djino ya'kosombela nga liwa
Soki oko changer te di eh
Ndenge na yo yako zala na nga
Ezaleli na yo epayi na nga, oh, Djino
Bazingani bras dessus, bras desous
Baninga oyo ya ngai loboko elongwaka na litama te oh
Lokola nazanga moto na mokili
Kaka po Bokana okotinda ata sango te

Lokola otongi efelo na kati ya ngai na yo eh pourtant
Elongi na yo na motema na ngai
Lokola mwese ya seko na horizon
Yeba nga ata na kati ya lilita
Nako zala na nga kaka kolingaka yo ehh
Djino Bokana yaya na Iza eh
Nalembi nzoto awa nazali Djino
Nasi nakumbela yo kuruze ya bolingo
Po nini opesi nga lisusu etumbu ya silence na yo?
Ah, nga nakokisi mabanzo kot'oyo ehh

Yaka-yaka nalinga yo
Bongo sima liwa eya kozua ngai
Iyo, oh, oh, Djino

Sala lokola nga moninga Djino
Tika motema na yo eloba
Motema ebungaka te eloko yango elingi
O'ya nga elingi Djino
Oyo ya nga elingi yo Djino
Ya nga elingi yo, oh, Djino

Sanza na moyi Djino
Mopepe, mapata, minzoto na likolo
Na senga te kasi Nzambe apesa nga yango
Bongo bolingo nasengi opimela ngai tina nini
Eloko tokuta na se
Matiti soki eboti ebele-bele
Na nzela nayaka po tokuna na yo
Nako senga Nzambe akomisa nga nyiama ya zamba
Ata obosani ngai tango na koya
Nga nakoyeba se yo po yo kolo na nga
Djino, Djino

Mwana mokonzi akotaka boloko te
Nzala pe ekotaka jamais na ndako ya mokonzi
Awa nga na kangi yo na kati ya motema na nga
Yebisa papa yango ezali lisumu te
Wana ezali kaka po nga nalingi yo Djino
Oh nga nalingi yaya na Iza

Maloba oyo ya bolingo, oh, Djino
Soki ezalaki eloko ya ofele te
Ngai mobola nde nazangaki kosombela yo
Lokola ezali boye te tika na profiter
Nayebisa na yo ete motema elingi yo Djino
Motema elingi mama Londo

Sanza na moyi Djino
Mopepe, mapata, minzoto na likolo
Na senga te kasi Nzambe apesa yango
Bongo bolingo nasengi opimela ngai tina nini?
Eloko tokuta na se

Mwana mokonzi akotaka boloko te
Nzala pe ekotaka jamais na ndako ya mokonzi
Awa nga na kangi yo na kati ya motema na nga
Yebisa papa yango ezali lisumu te
Wana ezali kaka po nga nalingi yo eza l'amour

Sala lokola nga moninga, motema na yo
Tika motema na yo eloba
Motema ebungaka te eloko yango elingi
O'ya nga elingi Djino
Oyo ya nga elingi yo Bibel Gouda
Ya nga elingi yo oh Shifa Kamba
Ya nga elingi Jipson Anane
Ya nga elingi yo oh Glodie Meka
Ya nga elingi yo, oh, yo, Souleman

Iyeh-e-e-e-e-eh
Tchatcho, ezalaka kaka tchatcho
Nga na memande ngambo po na bala
Baninga pe bakendeke mabala malembe yeh-eh
Iyeh-e-e-e-eh
Iye nga nako wa eh
Nga na mema nde ngambo po na bala
Baninga pe bakendeke mabala bongania
Ya ngai mboka mobimba etomboka na maloba
Stephanie ya motema
Ma douce fleur de ravin
Fleur de parfum écoute bien
Soleil levant, sourire d'enfant Stephanie

Iye nga nakowa eh
Iye wapi Elei?
Nga na mema nde ngambo po na bala
Baningaka pe bakendeke mabala ba mpangi
Ya ngai mboka mobimba etomboka na maloba