Notice: file_put_contents(): Write of 656 bytes failed with errno=28 No space left on device in /www/wwwroot/muzbon.net/system/url_helper.php on line 265
Marie Misamu - Associé | Скачать MP3 бесплатно
Associé

Associé

Marie Misamu

Длительность: 6:18
Год: 2008
Скачать MP3

Текст песни

Soki na tali bomoyi na ngai eh,
Ngai nani na beta tolo eh?
Na zalalaki elili ya pamba
Bomoyi nzoto molimo na kaba na santa eh!

MOISE MBIYE
Bato babandaki kotala ngai
Bakomaki koloba na confesser,
Po ba pasi elekaki ngai eh
Balobaki ezali etumbu ya ba nzambe na nga lalala La la la.

MARIE MISAMU
Ngai nakende wapi ngai yoyo?
Natia elikia epa nani eh?
Balobi eza na papa moko
Aza capable yako zua vie na nga en charge,
Natie moto bakata na ndimi eh ...

DUO
Associé eh associé na nga Yesu eh,
Associé eh yaya associé na nga Yesu eh

Associé eh associé na nga Yesu eh,
Associé eh yaya associé na nga Yesu eh

MARIE MISAMU

Baninga nga nakima Nzambe ndenge nini eh?
Atindaki mwana naye moko eh
Asopa makila po nga nabika oh
To signa contrat na makila ya longue vie eeeh.

MOISE MBIYE

Hum! ngai nazali nzete bino bitabe
Eloba yemoko Jésus
Moise amonaki nzete epeli moto ezo zika te
Yoka sekele yanga na Yesu oyo
Nzete aziki teee bitabe eko zika ndenge nini? Mama eh

MARIE MISAMU

Ah mokili oyo pasi
Moto na moto na moto na moto naye,
Oyo yanga na Pona Jésus eeh
To signa contrat na makila eh.
Oh yaya oh yaya associé na ngai Yesu eh.

MOISE MBIYE

Wo!! mubidi eh ye! ye!
Mubidi di tshanana
Kibualukayi Nzambi wa kambane
Katuyinenda tudi tshanane. eh
Hozana hozana hozana.

MARIE MISAMU

Eh Yahweh yeh
Eh Yahweh yeh
Asalaka nini eh?
Eh Yahweh yeh
Nzambe ya miracle yeh
Bikisa ngai eh
Sekwisa ngai eh
Ah Yahweh

Eh Yahweh eh
Eh Yahweh eh
Asalaka nini eh?
Eh Yahweh alongolaka bato soni na miso ya bato.
Ata ba buakiyo, ba moni yo pamba yaya azali eh ye!
Asalaka nini eh
Moninga ya tango nionso oh
Alembaka te abuakaka te ye!
Asalaka nini eh.
Kombo naye Yesu eh,,
Eh yaya eh!! asalaka nini eh?
Alongolaka bato soni na miso ya bato.

MOISE MBIYE

Na bombi bombi nakoki te Yahweh,
Na sopi ba posa na nga nase ya mokano nayo
Longola soni

MARIE MISAMU

Esika oyo bakundi ngai eh
Yesu amonaka fourmi nase ya libanga molili eh
Bimisa ngai eh bimisa ngai eh.
Ba douleurs na ngai oyo
Epesi ngai Maloba yaya,
Yako lobela yo na litoyi yaya eh
Répondre na cas na ngai eh.

INTERVENTION SUR LE COEUR

Tango ya pole ekoki
Yawhe asalaka nini eh!
Papa soni na nga emati nzete eh!
Ah! yaye eh! asalaka nini eh!
Yo belema belema belema
Yo otala bane!
Toluki yo butu moyi
Y'ozali wapieee? yawhe eh! eh! eh!
Yawhe eh! papa, yawhe eh yoka
Tia kombo na nga
Na liste ya mapamboli nayo
Obosanaka te, ba promesses
Opesaka na bana nayo
Repondre na cas na ngayee!
Yaya oza wapi olongola sonie!