Yo Nzambe Na Nguya (1)

Yo Nzambe Na Nguya (1)

Franck Mulaja

Альбом: Pres De Toi ...
Длительность: 5:43
Год: 2014
Скачать MP3

Текст песни

Ozali Nzambe, Nzambe na nguya nioso
Likolo na nse bikelami na yo
Nguya na yo efandi na kembo na yo
Na bosantu bua yo, mpe na bokumu bua yo
Mitunguisi nioso ya bomoyi na ngai
Ekomaka kimia tango posa na yo
Y'okitisaka moto n'etumbelo oh
Bo banguna na yo bakufa na nsoni

Nzambe na nguya eh

Kumisama Yahwe, (Nzambe na ngai)
Nzambe na nguya eh, (Papa eh)
Kumisama Yahwe

Na yembeli yo Papa malamu uu

Kumisama Yahwe, (Nkolo na ngai)
Nzambe na nguya eh, (Papa eh)
Kumisama Yahwe

Ozali Nzambe, oyo apona ngai
Mubundi molongi, ya bitumba na nga
Yo nde opangusaka, pinzoli na miso
Na mitema oyo mizali kolela
Oniata satana, kuna na Golgotha
Bo mapinga na yo, ba zala n'elonga eh
Nguya na yo, emonani na miso
Bato ba kobika pona kombo na yo

Nzambe na nguya ee

Kumisama Yahwe, (Nzambe na ngai)
Nzambe na nguya eh, (Papa eh)
Kumisama Yahwe

Na yembeli yo Papa malamu uu

Kumisama Yahwe, (Nzambe na ngai)
Nzambe na nguya eh, (Papa eh)
Kumisama Yahwe

(Plusieurs fois):
Kumama Yahwe, Kumama Yahwe
Kumama Nzambe na nguya, kumama Yahwe

Okabola mayi n'ebale, Papa y'obonguani te
Ata na kati na moto, nayebi na kolonga
Okatisa mabota na nguya ya loboko na yo
Yo nde Nzambe na Mose, okosaka te oh

Kumama Yahwe, Kumama Yahwe
Kumama Nzambe na nguya, kumama Yahwe

Nani akoki kosunga lokola yo mosantu
Yo nde Nkolo na bomoyi, otonda nguya
Osekuisa Masiya na nguya ya loboko na yo
Ata na kufi lelo oyo, nayebi na kosekua
Fololo ya bolingo, na ye kobonzela yo
Yo nde osimbi mitema, ozali Nzambe eh

Kumama Yahwe, Kumama Yahwe
Kumama Nzambe na nguya, kumama Yahwe

Okabola mayi n'ebale, Papa y'obonguani te
Ata na kati na moto, nayebi na kolonga
Okatisa mabota na nguya ya loboko na yo
Yo nde Nzambe na Mose, okosaka te oh

Nani akoki kosunga lokola yo mosantu
Yo nde Nkolo na bomoyi, otonda nguya
Osekuisa Masiya na nguya ya loboko na yo
Ata na kufi lelo oyo, nayebi na kosekua

Nani akoki kosunga lokola yo mosantu
Yo nde Nkolo na bomoyi, otonda nguya
Fololo ya bolingo, toye kobonzela yo
Papa osimbi mitema, ozali Nzambe eh